Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 16:16 - Mokanda na Bomoi

16 Tango bato ya Isalaele oyo bazalaki kati na molako bayokaki ete Zimiri asali likita mpo na kotelemela mokonzi Asa mpe abomaki ye, bakomisaki kaka na mokolo wana Omiri oyo azalaki mokonzi ya mampinga, mokonzi ya Isalaele kati na molako.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 16:16
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Baesha, mwana mobali ya Ayiya, moto ya libota ya Isakari, asalelaki ye likita mpe abomaki ye na Gibetoni, moko kati na bingumba ya bato ya Filisitia, na tango oyo Nadabi elongo na Isalaele mobimba bazingelaki Gibetoni.


Tango Asa, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu tuku mibale na sambo na bokonzi ; Zimiri akonzaki na Tiritsa, mikolo sambo. Mampinga ya basoda ya Isalaele batongaki molako na bango pembeni ya Gibetoni, engumba ya bato ya Filisitia, mpo na kobundisa yango.


Bongo Omiri elongo na bato nyonso ya Isalaele balongwaki na Gibetoni mpe bakendeki kozingela Tiritsa.


Akabi, mwana mobali ya Omiri, asalaki makambo mabe mingi na miso ya Yawe koleka bakonzi nyonso oyo bakonzaki liboso na ye.


Akazia azalaki na mibu tuku mibale na mibale ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mobu moko na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Atali. » Atali azalaki koko ya Omiri, mokonzi ya Isalaele.


Akazia azalaki na mibu tuku mibale na mibale ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mobu moko na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Atali. » Atali azalaki koko ya Omiri.


Lokola obatelaki malako ya Omiri mpe osalaki misala nyonso ya mabe ya ndako ya Akabi, nakokaba yo mpo ete obebisama, nakokaba bato na yo mpo ete batiolama ; bongo bokolata soni ya libota na Ngai.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ