Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 16:11 - Mokanda na Bomoi

11 Na tango kaka azwaki bokonzi mpe avandaki na kiti ya bokonzi, asilisaki koboma libota mobimba ya Baesha ; atikaki ata mobali moko te na bomoi, ezala ndeko to molingami na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 16:11
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yango wana, nakoyeisa pasi na ndako ya Jeroboami, nakosilisa koboma mibali nyonso kati na ndako ya Jeroboami, ezala mowumbu to monsomi kati na Isalaele ; nakokomba ndako ya Jeroboami ndenge bakombaka matiti ya mbindo, kino nyonso penza ekosila.


Tango azwaki bokonzi, abomaki libota nyonso ya Jeroboami mpe atikaki ata moto moko te na bomoi kati na libota ya Jeroboami : abomaki bato nyonso kolanda etinda na Yawe na nzela ya mowumbu na ye, Ayiya, moto ya Silo,


Zimiri akotaki, abetaki mpe abomaki ye na tango Asa, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu tuku mibale na sambo na bokonzi. Boye, Zimiri akitanaki na Ela na bokonzi.


nakokombola Baesha mpe libota na ye nyonso, mpe nakokomisa ndako na ye lokola ndako ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati.


Nakokomisa ndako na yo lokola ndako ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, mpe lokola ndako ya Baesha, mwana mobali ya Ayiya ; pamba te opesi Ngai kanda mpe osali ete Isalaele asala masumu. »


Nakosala libota ya Akabi ndenge nasalaki libota ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, mpe libota ya Baesha, mwana mobali ya Ayiya.


Tika ete bakitani na ye basila na kokufa, mpe bakombo na bango elongwa na ekeke oyo ezali kolanda !


Adoni-Bezeki alobaki : « Bakonzi tuku sambo, oyo bakata bango misapi ya minene ya maboko mpe ya makolo, bazalaki kolokota biloko oyo ezalaki kokweya na se ya mesa na ngai. Sik’oyo, Nzambe azongiseli ngai makambo oyo nasalaki baninga. » Bamemaki ye na Yelusalemi, mpe akufaki kuna.


Tika ete Nzambe apesa ngai Davidi etumbu ya makasi soki, kino lobi na tongo, natiki na bomoi mobali moko kati na bato nyonso oyo bazali ya Nabali ! »


Nzokande, na Kombo na Yawe, Nzambe ya Isalaele, oyo apesi ngai nzela te ya kosala yo mabe, soki oyaki noki te mpo na kokutana na ngai, mobali moko te kati na ndako ya Nabali alingaki kotikala na bomoi kino lobi na tongo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ