10 Zimiri akotaki, abetaki mpe abomaki ye na tango Asa, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu tuku mibale na sambo na bokonzi. Boye, Zimiri akitanaki na Ela na bokonzi.
Baesha, mwana mobali ya Ayiya, moto ya libota ya Isakari, asalelaki ye likita mpe abomaki ye na Gibetoni, moko kati na bingumba ya bato ya Filisitia, na tango oyo Nadabi elongo na Isalaele mobimba bazingelaki Gibetoni.
Na tango kaka azwaki bokonzi mpe avandaki na kiti ya bokonzi, asilisaki koboma libota mobimba ya Baesha ; atikaki ata mobali moko te na bomoi, ezala ndeko to molingami na ye.
Tango Asa, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu tuku mibale na sambo na bokonzi ; Zimiri akonzaki na Tiritsa, mikolo sambo. Mampinga ya basoda ya Isalaele batongaki molako na bango pembeni ya Gibetoni, engumba ya bato ya Filisitia, mpo na kobundisa yango.
Zimiri, mokonzi ya mampinga oyo azalaki kokamba ndambo ya bashar na ye, asalelaki ye likita. Na tango wana, mokonzi Ela azalaki na Tiritsa komela mpe kolangwa masanga na ndako ya Aritsa, mobateli biloko ya ndako ya mokonzi, kuna na Tiritsa.