8 Abiyami akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye kati na engumba ya Davidi. Asa, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
Na tango wana kaka, Abiya, mwana mobali ya Jeroboami, akomaki kobela.
Roboami akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Davidi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Naama. » Naama azalaki moto ya Amoni. Abiyami, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
Tango Jeroboami, mokonzi ya Isalaele, asalaki mibu tuku mibale na bokonzi, Asa akomaki mokonzi ya Yuda.
Davidi akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye kati na engumba ya Davidi.
Salomo azalaki tata ya Roboami, Roboami azalaki tata ya Abiya, Abiya azalaki tata ya Asa, Asa azalaki tata ya Jozafati,
Bango nyonso nde bazalaki bana mibali ya Davidi, longola bana mibali oyo bamakangu na ye babotelaki ye. Mpe Tamari azalaki ndeko na bango ya mwasi.
Asa asalaki makambo ya malamu mpe ya sembo na miso ya Yawe, Nzambe na ye.