Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 15:4 - Mokanda na Bomoi

4 Nzokande, mpo na Davidi, Yawe Nzambe na ye, apesaki Abiyami mwinda kati na Yelusalemi, wana atiaki mwana na ye ya mobali mpo na kokitana na ye na bokonzi mpe kokomisa Yelusalemi makasi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 15:4
26 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nakokomisa yo ekolo monene mpe nakopambola yo ; nakokomisa kombo na yo monene, mpe okozala etima ya mapamboli.


Boye, tango Nzambe abebisaki bingumba ya etando, akanisaki Abrayami mpe abikisaki Loti na likama oyo atindelaki bingumba epai wapi Loti azalaki kovanda.


Nakosala yango mpo ete Abrayami atosaki Ngai, abatelaki bikateli na Ngai, mitindo na Ngai mpe mibeko na Ngai.


Kasi Abishayi, mwana mobali ya Tseruya, ayaki kosunga Davidi, abetaki moto ya Filisitia mpe abomaki ye. Boye bato ya Davidi bakataki seleka epai ya mokonzi, balobaki : « Okobima lisusu te elongo na biso na bitumba mpo ete mwinda ya Isalaele ekufa te. »


Nzokande, mpo na Davidi, tata na yo, nakosala yango te na tango oyo ozali nanu na bomoi ; nakobotola yango nde na maboko ya mwana na yo ya mobali.


Kasi mpo na Davidi, mowumbu na Ngai, mpe mpo na engumba Yelusalemi oyo napona kati na mabota nyonso ya Isalaele, Salomo akozwa kaka libota moko.


Nakopesa libota moko epai ya mwana na ye ya mobali mpo ete Davidi, mowumbu na Ngai, azala tango nyonso na mokitani liboso na Ngai kati na Yelusalemi, engumba oyo napona mpo na kotia Kombo na Ngai kati na yango.


Nzokande, Yawe alingaki te kobebisa libota ya Davidi, mpo na boyokani oyo Ye moko Yawe asalaki elongo na Davidi, mpe mpo ete alakaki kopesa mpo na libela bokonzi epai ya Davidi mpe epai ya bana na ye.


Kuna na Siona, nakobakisa nguya ya Davidi, mpe nakobimisela ye mokitani, mopakolami na ngai, lokola mwinda ya kopela.


Yo nde obikisaka banyokolami, okitisaka bato na lofundu.


Na tina na Siona, maloba oyo ekolobama : « Bato nyonso babimela awa, mpe ezali Ye-Oyo-Aleki-Likolo nde alendisaka yango. »


Eyano nini tokopesa penza epai ya bamemi sango ya ekolo oyo ? Ezali ete Yawe asili kolendisa Siona mpo ete babola kati na bato na Ye basili kozwa ebombamelo ya malonga. »


‹ Nakobatela engumba oyo mpe nakobikisa yango mpo na lokumu ya Kombo na Ngai mpe mpo na lokumu ya Davidi, mosali na Ngai. › »


mpe botikela Ye te tango ya kopema kino tango akozongisa kimia na Yelusalemi mpe akokomisa yango mboka ya lokumu kati na mokili !


Nkolo atindaki liloba mpo na kotelemela Jakobi, mpe liloba yango ekomeli Isalaele.


« Tala liloba oyo Yawe, Ye oyo akela mabele, oyo abongisa yango malamu mpe alendisa yango, oyo Kombo na Ye ezali Yawe, alobi :


Mpe Ngai, nazali koloba na yo : Ozali Libanga, mpe ezali na likolo ya libanga oyo nde Ngai nakotonga Lingomba na Ngai ; bongo bikuke ya mboka ya bakufi ekotikala kolonga yango te.


pole mpo na kongengisa bikolo, mpe nkembo ya bato na Yo, Isalaele. »


Yesu alobaki lisusu na bato : — Nazali pole ya mokili ; moto nyonso oyo alandaka Ngai akotikala kotambola kati na molili te, kasi akozwa pole ya bomoi.


Mpo na oyo etali Sango Malamu, bazali banguna ya Nzambe mpo na bolamu na bino ; kasi mpo na oyo etali koponama oyo Nzambe asalaki, bazali balingami na Ye likolo ya bakoko na bango,


Lokola alingaki bakoko na yo mpe aponaki bakitani na bango, abimisaki yo na Ejipito na nguya na Ye mpe na makasi na Ye ya monene


Ngai Yesu, natindaki anjelu na Ngai mpo na kotatola bosolo ya makambo oyo kati na Mangomba. Nazali Mosisa mpe mokitani ya Davidi ; Monzoto ya tongo, oyo engengaka.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ