Jeroboami asalaki mibu tuku mibale na mibale na bokonzi, akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye. Nadabi, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
Sima na kufa ya Zimiri, bana ya Isalaele bakabwanaki na bandambo mibale : ndambo moko elandaki Tibini, mwana mobali ya Ginati lokola mokonzi ; mpe ndambo mosusu elandaki Omiri.