Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 15:14 - Mokanda na Bomoi

14 Nzokande, atako abebisaki te bisambelo ya likolo ya bangomba, Asa abatelaki motema na ye sembo na miso ya Yawe, na mikolo nyonso ya bomoi na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 15:14
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango Salomo akomaki mobange, basi na ye batindikaki motema na ye na kogumbamela banzambe mosusu ; mpe atikaki kolinga Yawe, Nzambe na ye, na motema na ye mobimba ndenge ezalaki motema ya Davidi, tata na ye.


Asalaki masumu nyonso oyo tata na ye asalaki liboso ete Abiyami akoma mokonzi. Apesaki te motema na ye mobimba epai na Yawe, Nzambe na ye, ndenge ezalaki motema ya Davidi, koko na ye.


Jozafati alandaki nzela nyonso oyo Asa, tata na ye, atambolaki na yango mpe apengwaki na yango ata moke te ; asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe.


Na tango wana, bato bazalaki kotumba mbeka na bisambelo ya likolo ya bangomba, pamba te ezalaki nanu na tempelo moko te oyo etongamaki mpo na Kombo na Yawe.


Salomo alakisaki bolingo na ye mpo na Yawe na kotambola kolanda malako ya Davidi, tata na ye, longola kaka kotumba mbeka mpe ansa na bisambelo ya likolo ya bangomba.


Tika ete mitema na bino ezala sembo epai na Yawe, Nzambe na biso, mpo ete botambola kolanda mibeko na Ye mpe bobatela malako na Ye ndenge bosali yango na mokolo ya lelo. »


Joasi asalaki makambo ya malamu na miso ya Yawe na mikolo nyonso oyo Nganga-Nzambe Yeoyada azalaki koteya ye.


Nzokande, balongolaki te bisambelo ya likolo ya bangomba ; bato bakobaki kaka kobonza kuna bambeka mpe kotumba ansa.


Nzokande, balongolaki te bisambelo ya likolo ya bangomba ; bato bakobaki kaka kobonza kuna bambeka mpe kotumba ansa.


Apesaki mitindo na bato ya Yuda ete baluka Yawe, Nzambe ya batata na bango, mpe batosa mibeko mpe malako na Ye.


Atongaki bingumba makasi kati na Yuda mpo ete mokili ezalaki na kimia. Na mibu wana, moto moko te abundisaki ye, pamba te Yawe apesaki ye bopemi.


Pamba te Yawe atalaka mokili mobimba mpo na kosunga bato oyo mitema na bango emipesa mobimba epai na Ye. Nzokande, na likambo oyo, osali lokola moto oyo azangi mayele. Mpo na yango, kobanda lelo, okozalaka na bitumba tango nyonso.


Asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe, kasi na motema na ye mobimba te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ