1 Tango Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, akokisaki mibu zomi na mwambe na bokonzi, Abiyami akomaki mokonzi ya Yuda.
Roboami akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Davidi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Naama. » Naama azalaki moto ya Amoni. Abiyami, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
zeke ya zomi na sambo ekweyaki epai ya Eziri ; zeke ya zomi na mwambe ekweyaki epai ya Apitsetsi ;
Sima, Roboami abalaki Maaka, mwana mwasi ya Abisalomi, oyo abotelaki ye : Abiya, Atayi, Ziza mpe Shelomiti.