1 Bakonzi 14:9 - Mokanda na Bomoi9 Kasi yo, osali mabe koleka bato nyonso oyo bazalaki liboso na yo : omisaleli banzambe mosusu, bikeko ya bibende banyangwisa na moto ; boye, olamusi kanda na Ngai mpe opesi Ngai mokongo. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Babotolaki bingumba batonga makasi mpe mabele oyo ebotaka malamu. Babotolaki bandako etonda na biloko ya ndenge na ndenge, mabulu ya mayi batimola wuta kala, bilanga ya vino, ya nzete ya olive mpe ya nzete mosusu ebele oyo ebotaka mbuma ya kolia. Na bolingo monene na Yo, baliaki mpe batondaki, bakomaki minene mpe basepelaki na mapamboli na Yo nyonso.
Asembolaki elilingi moko lokola loboko mpe asimbaki ngai na suki ya moto. Molimo atombolaki ngai na kati-kati ya se mpe likolo mpe amemaki ngai, kati na emoniseli ya Nzambe, kino na Yelusalemi, na ekotelo ya Ekuke ya nor ya lopango ya kati ya Tempelo, epai wapi batelemisaki nzambe ya ekeko oyo etumbolaka zuwa.