Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 14:5 - Mokanda na Bomoi

5 Yawe alobaki na Ayiya : — Mwasi ya Jeroboami azali koya kotuna yo toli mpo na mwana na ye ya mobali, pamba te azali kobela. Osengeli kopesa ye eyano songolo to pakala. Tango akoya, akosala lokola nde azali moto mosusu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 14:5
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye, Joabi atindaki moto moko na mboka Tekoa, mpo na koluka mwasi moko ya bwanya mpe komema ye longwa kuna. Alobaki na ye : « Sala lokola moto oyo azali na matanga, lata bilamba ya matanga, kopakola mafuta te : sala lokola mwasi oyo alata pili wuta mikolo ebele mpo na kolela ebembe ;


Tango Ayiya ayokaki makelele ya makolo ya mwasi ya Jeroboami na ekuke, alobaki : — Kota, mwasi ya Jeroboami ! Mpo na nini ozali komibongola ? Natindami epai na yo mpo na koyebisa yo sango mabe.


Boye akobaki nzela na ye kino akomaki na ngomba, epai ya moto na Nzambe. Mpe amibwakaki na makolo na ye. Geazi apusanaki mpo na kolongola ye na makolo ya Elize, kasi moto na Nzambe alobaki : — Tika ye bongo ! Azali na pasi makasi kati na motema na ye, kasi Yawe abombeli ngai yango mpe atalisi ngai te tina na yango.


Liboso na Yawe, bwanya moko te, mayele moko te mpe toli moko te ekoki kolonga.


Solo, Nkolo Yawe asalaka eloko moko te soki alakisi mabongisi na Ye te epai ya basali na Ye, basakoli.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ