Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 14:4 - Mokanda na Bomoi

4 Mwasi ya Jeroboami asalaki makambo oyo mobali na ye atindaki ye : akendeki na Silo mpe akotaki na ndako ya Ayiya. Nzokande, Ayiya azalaki komona lisusu te, pamba te miso na ye ekufaki mpo ete akomaki mobange.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 14:4
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango Izaki akomaki mobange mpe miso na ye ezalaki komona lisusu malamu te, abengaki Ezawu, mwana na ye ya liboso ya mobali. Alobaki na ye : — Mwana na ngai ! Ezawu azongisaki : — Ngai oyo !


Miso ya Isalaele elembaki mpo na kimobange mpe azalaki komona lisusu malamu te. Yango wana, Jozefi apusaki bana na ye ya mibali pembeni ya tata na ye, Isalaele apesaki bango beze mpe ayambaki bango.


Mokolo moko, wana Jeroboami azalaki kobima na Yelusalemi, Ayiya, mosakoli ya Silo, akutanaki na ye na nzela mpe alataki kazaka ya sika. Bazalaki kaka bango mibale na libanda ya mboka, kati na esobe.


Jeroboami alobaki na mwasi na ye : — Mibongola mpo ete bato bayeba te ete ozali mwasi ya mokonzi Jeroboami ; bongo, kende na Silo. Mosakoli Ayiya azali kuna ; ye nde alobaki na ngai ete nakozala mokonzi ya bato oyo.


Molayi ya bomoi na biso ekoki kozala mibu tuku sambo to mibu tuku mwambe mpo na bato oyo baleki makasi ; nzokande, etondi na pasi mpe na minyoko, pamba te elekaka noki, mpe tolimwaka.


tango bakengeli ya ndako bakolenga, mpe bato ya makasi bakofukama ; tango basi oyo banikaka ble bakotika konika yango mpo ete bazali lisusu mingi te, mpe bato oyo batalaka na maninisa bakobungisa kitoko na bango ;


Moyize azalaki na mibu nkama moko na tuku mibale ya mbotama tango akufaki. Miso na ye elembaki te mpe makasi na ye esilaki te.


Sima na bana ya Isalaele kozwa bokonzi likolo ya mokili, lisanga na bango mobimba esanganaki na Silo mpe batelemisaki kuna Ndako ya kapo ya Bokutani.


Mokolo moko na butu, Nganga-Nzambe Eli azalaki ya kolala na esika na ye ; miso na ye elembaki mpe akokaki lisusu komona te.


Nzokande Eli azalaki na mibu tuku libwa na mwambe ya mbotama ; miso na ye elembaki makasi, akokaki komona lisusu te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ