3 Kamata mapa zomi, ndambo ya bagato, na ekolo ya mafuta ya nzoyi, mpe kende kokutana na ye ; akoyebisa yo makambo oyo ekokomela mwana na biso ya mobali.
Mokonzi Akazia akweyaki na Samari wuta na lininisa ya shambre na ye ya likolo mpe azokaki pota moko ya makasi. Atindaki bantoma na ye mpe alobaki na bango : — Bokende kotuna epai ya Bala-Zebubi, nzambe ya Ekroni, mpo na koyeba soki nakobika solo na likama oyo.
Moto moko awutaki na Bala-Shalisha, amemelaki moto na Nzambe mapa tuku mibale ya orje oyo ewutaki na bambuma ya liboso ya elanga, elongo na saki moko ya bambuma ya ble. Elize alobaki na mosali na ye : — Pesa yango na bato mpo ete balia !
Bongo Namani elongo na basali na ye nyonso bazongaki epai ya moto na Nzambe. Atelemaki liboso ya Elize mpe alobaki : — Nayebi sik’oyo ete ezali na Nzambe te kati na mokili mobimba longola kaka kati na Isalaele. Nabondeli yo, ndima kado kowuta na mosali na yo.
Mokonzi ya Siri alobaki na ye : — Malamu ! Nakotinda mokanda epai ya mokonzi ya Isalaele. Boye Namani akendeki mpe amemaki bakilo ya palata, nkama misato na tuku mitano ; bakilo ya wolo, tuku sambo, mpe bilamba zomi ya talo.
mwasi moko apusanaki pene na Ye. Na maboko na ye, azalaki na molangi ya alibatre etonda na malasi ya motuya makasi. Wana Yesu azalaki na mesa, mwasi yango asopaki malasi yango na moto ya Yesu.