Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 14:27 - Mokanda na Bomoi

27 Boye, na esika ya banguba ya wolo, mokonzi Roboami asalisaki banguba ya bronze mpe apesaki yango epai ya bakonzi ya bakengeli na ye, oyo bazalaki kobatela ekotelo ya ndako ya mokonzi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 14:27
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi Iri alalaki na ekotelo ya ndako ya mokonzi elongo na basali nyonso ya mokonzi na ye ; akendeki te na ndako na ye.


Na tango wana, Abisalomi azwaki shar, bampunda mpe basoda tuku mitano oyo bazalaki kotambola liboso na ye lokola bakengeli na ye.


Na tango wana kaka, Abiya, mwana mobali ya Jeroboami, akomaki kobela.


Tango nyonso mokonzi abandaki kokende na Tempelo ya Yawe, bakengeli bazalaki komema banguba mpe kozongisa yango kati na ndako ya bakengeli.


Yawe alobaki na Ayiya : — Mwasi ya Jeroboami azali koya kotuna yo toli mpo na mwana na ye ya mobali, pamba te azali kobela. Osengeli kopesa ye eyano songolo to pakala. Tango akoya, akosala lokola nde azali moto mosusu.


Lokola nguya na Yawe ezalaki likolo ya Eliya oyo alataki mokaba na loketo na ye, akimaki mbangu liboso ya Akabi kino na ekuke ya Jizireyeli.


Asangisaki bakonzi ya mampinga, oyo bakambaka basoda nkama moko, bato ya Kari, bakengeli mpe bato nyonso ya mokili ; amemaki mokonzi longwa na Tempelo ya Yawe kino na ndako ya mokonzi, na nzela ya ekuke ya bakengeli. Bongo Joasi avandaki na kiti na ye ya bokonzi.


Na mobu ya sambo, Yeoyada abengisaki bakonzi ya mampinga, oyo bakambaka basoda nkama moko ya bato ya Kari mpe bakengeli. Abengisaki bango epai na ye kati na Tempelo ya Yawe, asalaki boyokani elongo na bango, alapisaki bango ndayi kati na Tempelo ya Yawe mpe alakisaki bango mwana mobali ya mokonzi.


Boye, mokonzi atindaki bakengeli na ye, oyo bazalaki na mopanzi na ye : « Bobaluka mpe boboma Banganga-Nzambe ya Yawe ; pamba te bango mpe basungaki Davidi : bayebaki ete Davidi azalaki kokima kasi bayebisaki ngai te. » Kasi basoda oyo bakengelaka mokonzi baboyaki kosembola maboko na bango mpo na koboma Banganga-Nzambe ya Yawe.


Alobaki na bango : — Tala makambo oyo mokonzi oyo akokonza bino akobanda kosala : Akozwa bana na bino ya mibali mpe akotia bango na mosala ya kokumba bashar na ye kati na basoda na ye oyo babundaka na bampunda ; bakobanda kokima mbangu liboso ya shar na ye lokola bakengeli ya mokonzi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ