1 Bakonzi 14:23 - Mokanda na Bomoi23 Batongaki lisusu mpo na bango moko bisambelo ya likolo ya bangomba, mabanga ya bule, makonzi ya bule mpo na Ashera na likolo ya bangomba nyonso mpe na se ya banzete nyonso ya mobesu. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Boye, bokoyeba solo ete Ngai nazali Yawe tango bato na bango bakokufa na mopanga kati na banzambe na bango ya bikeko zingazinga ya bitumbelo na bango, na bangomba nyonso ya mikuse mpe na likolo ya bangomba nyonso ya milayi, na se ya banzete nyonso ya mibesu mpe na se ya terebente nyonso ya mobesu etonda na makasa, bisika oyo bazalaki kotumbela banzambe na bango ya bikeko ansa lokola mbeka ya solo kitoko.
Bingumba ekotikala lisusu na bato te mpe bisambelo ya likolo ya bangomba ekobebisama na bisika nyonso oyo bokozala ; mpo ete bitumbelo na bino etikala pamba mpe ebebisama, banzambe na bino ya bikeko ebukana biteni-biteni mpe ebebisama, bitumbelo na bino ya malasi ya ansa ebukana mpe biloko oyo maboko na bino esalaki ezala lisusu te.