Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 14:13 - Mokanda na Bomoi

13 Bato nyonso ya Isalaele bakosalela ye matanga mpe bakokunda ye. Ye moko kaka, kati na ndako ya Jeroboami, nde bakokunda ; pamba te kati na ndako mobimba ya Jeroboami, ye kaka nde Nzambe amoni na eloko ya malamu oyo esepelisi Yawe, Nzambe ya Isalaele.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 14:13
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bakundaki ye, mpe Isalaele mobimba basalaki matanga ndenge kaka Yawe alobaki na nzela ya mowumbu na Ye, mosakoli Ayiya.


Lokola mokonzi Roboami amikitisaki na kondima mabe na ye, Yawe akitiselaki ye te kanda na Ye mpe abebisaki ye penza te. Kutu, emonanaki lisusu makambo malamu kati na Yuda.


Kasi atako bongo, makambo malamu emonani kati na yo, pamba te olongolaki makonzi ya nzambe Ashera mpe obongisaki motema na yo mpo na koluka Nzambe. »


Bino oyo bozali koloba : ‹ Tokolanda ye ndenge nini ? › Mpe bino bato oyo bomoni mabe kati na ngai,


Bolela te mpo na kufa ya mokonzi to bosala matanga te mpo na kufa na ye ! Bolela, bolela nde makasi mpo na ye oyo akei na bowumbu, mpo ete akozonga lisusu te mpe akomona lisusu te mboka epai babota ye.


Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi mpo na Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda : « Bakosalela ye matanga te na koloba : ‹ Mawa, ndeko na ngai ya mobali ! Mawa, ndeko na ngai ya mwasi ! › Bakosalela ye matanga te na koloba : ‹ Mawa, nkolo na ngai ! Mawa, mokonzi na ngai ! ›


mpe tango lingomba mobimba eyokaki sango ete Aron asilaki kokufa, bato nyonso ya Isalaele basalelaki ye matanga ya mikolo tuku misato.


Nabondelaka ete kondima oyo ezali kosangisa biso emonisama na misala, mpo ete ososola malamu bolamu nyonso oyo tozali na yango kati na Klisto.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ