Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 14:12 - Mokanda na Bomoi

12 Mpo na yo, telema mpe zonga na ndako na yo. Tango kaka okotia makolo na yo kati na engumba na yo, mwana na yo ya mobali akokufa.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 14:12
6 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bato nyonso ya Isalaele bakosalela ye matanga mpe bakokunda ye. Ye moko kaka, kati na ndako ya Jeroboami, nde bakokunda ; pamba te kati na ndako mobimba ya Jeroboami, ye kaka nde Nzambe amoni na eloko ya malamu oyo esepelisi Yawe, Nzambe ya Isalaele.


Kamata mapa zomi, ndambo ya bagato, na ekolo ya mafuta ya nzoyi, mpe kende kokutana na ye ; akoyebisa yo makambo oyo ekokomela mwana na biso ya mobali.


Alobaki na mokonzi : Tala liloba oyo Yawe alobi : « Boni, Nzambe azali lisusu te na Isalaele mpo ete otinda bato kotuna epai ya Bala-Zebubi, nzambe ya Ekroni ? Lokola osali bongo, okokita lisusu te na mbeto oyo olali, okokufa solo. »


Bazongisaki : — Moto moko ayaki kokutana na biso mpe alobaki na biso : « Bozonga epai ya mokonzi oyo atindi bino mpe boloba na ye : Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Boni, Nzambe azali lisusu te kati na Isalaele ; yango wana ozali kotinda bato kokende kotuna epai ya Bala-Zebubi, nzambe ya Ekroni ? › Mpo na yango, okokita te na mbeto oyo olali ; okokufa solo. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ