Tango azwaki bokonzi, abomaki libota nyonso ya Jeroboami mpe atikaki ata moto moko te na bomoi kati na libota ya Jeroboami : abomaki bato nyonso kolanda etinda na Yawe na nzela ya mowumbu na ye, Ayiya, moto ya Silo,
« bakobima mpe bakomona bibembe ya bato oyo batombokelaki Ngai, pamba te bankusu na bango ekokufa te mpe moto na bango ekokufa te ; bakopesa moto nyonso somo. »
nakokaba bango na maboko ya banguna na bango mpe ya bato oyo bazali koluka kosala bango mabe ; mpe bibembe na bango ekokoma bilei ya bandeke ya likolo mpe ya banyama ya mabele.
Nzambe azali moto te mpo ete akosa, azali mpe mwana ya moto te mpo ete akoka kobongola makanisi na Ye. Boni, akoki solo koloba mpe kosala eloko moko te ? Akoki solo kopesa elaka mpe kokokisa yango te ?