Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 13:6 - Mokanda na Bomoi

6 Mokonzi alobaki na moto na Nzambe : — Bondela Yawe, Nzambe na yo, mpe sambela mpo na ngai ete loboko na ngai ebonga. Moto na Nzambe abondelaki Yawe, mpe loboko ya mokonzi ebongaki, ezongaki ndenge ezalaki liboso.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 13:6
25 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kaka na tango yango, etumbelo ebukanaki mpe putulu epanzanaki. Ezalaki penza elembo oyo moto na Nzambe apesaki kolanda etinda na Yawe.


Na motema na ngai mobimba, nalukaka kosepelisa Yo ; salela ngai ngolu kolanda bilaka na Yo !


Sik’oyo lisusu, bolimbisa lisumu na ngai. Bobondela Yawe, Nzambe na bino, mpo ete alongola etumbu oyo ya kufa kati na ngai.


Bokamata bibwele na bino ndenge bolobaki : bangombe, bameme mpe bantaba ; mpe bokende. Boye, bopambola mpe ngai. »


Kasi na mbala oyo, Faraon ayeisaki lisusu motema na ye makasi lokola libanga mpe aboyaki kaka kotika bato kokende.


Faraon abengisaki Moyize mpe Aron, alobaki na bango : — Bobondela Yawe ete alongola magorodo pene na ngai mpe pene ya bato na ngai ; bongo nakotika bato na bino kokende kobonzela Yawe mbeka.


Sima, Moyize mpe Aron batikaki Faraon. Bongo Moyize agangaki epai na Yawe na tina na magorodo oyo atindelaki Faraon.


Bobondela Yawe mpo ete asilisa mvula ya mabanga mpe bakake. Bongo ngai nakotika bino kokende, mpe bino bokowumela lisusu awa te.


Mokonzi Sedesiasi atindaki Yewukali, mwana mobali ya Shelemia, mpe Nganga-Nzambe Sofoni, mwana mobali ya Maaseya, epai ya mosakoli Jeremi mpo ete bayebisa ye maloba oyo : « Nabondeli yo, bondela Yawe, Nzambe na biso, mpo na biso ! »


Bato ya Beteli batindaki Saretseri, Regemi-Meleki elongo na bato na bango mpo na kobondela Yawe


Boye, Moyize abelelaki Yawe : — Oh Nzambe, nabondeli Yo, bikisa ye !


Bato bayaki epai ya Moyize mpe balobaki : « Tosalaki masumu tango totombokelaki Yawe mpe totombokelaki yo. Bondela Yawe ete alongola mosika na biso banyoka oyo. » Boye, Moyize abondelaki mpo na bato.


Kasi Ngai, nazali koloba na bino : Bolingaka banguna na bino mpe bosambelaka mpo na bato oyo banyokolaka bino.


Yesu alobaki : — Tata, limbisa bango mpo ete bayebi te makambo oyo bazali kosala . Mpe bakabolaki bilamba na Ye, na kobeta zeke.


Bongo, afukamaki mpe agangaki makasi : — Nkolo, kotangela bango lisumu oyo te ! Tango kaka Etieni alobaki bongo, akufaki.


Simona azongisaki : — Bobondela Nkolo mpo na ngai mpo ete, kati na oyo bowuti koloba, eloko moko te ekomela ngai.


Bopambolaka bato oyo banyokolaka bino ; iyo, bopambolaka, kasi bolakelaka mabe te !


Kotika te ete mabe elonga na yo, kasi lukaka nde kolonga mabe na nzela ya kosala bolamu.


Tala makambo oyo nakosala bato ya ndako ya mayangani ya Satana, oyo balobaka ete bazali Bayuda, nzokande bazali na bango Bayuda te ; bazali nde bakosi. Nakosala ete baya kofukama na makolo na yo mpe bandima ete nalingaka yo.


Bato nyonso balobaki na Samuele : — Sambela Yawe, Nzambe na yo, mpo na basali na yo mpo ete tokufa te, pamba te tobakisaki lisusu na likolo ya masumu na biso, likambo ya mabe ya kosenga mokonzi mpo na biso.


Kasi mpo na ngai, ekozala penza likambo ya nkele soki nasali masumu liboso ya Yawe, soki natiki kobondela mpo na bino ! Nakolakisa bino nzela oyo ezali malamu mpe alima.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ