Tango mokonzi Jeroboami ayokaki bilakeli mabe oyo moto na Nzambe alobaki mpo na etumbelo ya Beteli, asembolaki loboko na ye wuta na etumbelo mpe alobaki : — Bokanga ye ! Kasi loboko oyo Jeroboami asembolaki epai ya moto na Nzambe ekawukaki, mpe akokaki lisusu te kozongisa yango epai na ye.
Mishe alobaki : — Soki penza yo ozongi na kimia, loba ete Yawe alobaki na nzela na ngai te ! Abakisaki : — Bino bato nyonso, bosimba makambo oyo nalobi !
Na mokolo yango, lokola bitumba ezalaki makasi, mokonzi atikalaki ya kotelema kati na shar na ye liboso ya bato ya Siri ; mpe na pokwa, akufaki. Makila oyo ebimaki na pota na ye esopanaki kati na shar.
Bayekoli bakendeki koteya na bisika nyonso. Nkolo azalaki kosala elongo na bango mpe azalaki kokokisa liloba na Ye na nzela ya bilembo ya kokamwa oyo ezalaki kolanda liloba na Ye.
Soki makambo oyo mosakoli alobi na Kombo na Yawe ekokisami te to esalemi te, wana maloba yango ewutaki na Yawe te. Mosakoli wana alobaki kaka na ndenge na ye moko, bobanga ye te. »