Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 13:4 - Mokanda na Bomoi

4 Tango mokonzi Jeroboami ayokaki bilakeli mabe oyo moto na Nzambe alobaki mpo na etumbelo ya Beteli, asembolaki loboko na ye wuta na etumbelo mpe alobaki : — Bokanga ye ! Kasi loboko oyo Jeroboami asembolaki epai ya moto na Nzambe ekawukaki, mpe akokaki lisusu te kozongisa yango epai na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 13:4
26 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bakangaki miso ya bato nyonso oyo bazalaki na ekuke ya ndako, ezala bilenge to mibange ; boye bazalaki lisusu komona ekuke te.


Jeroboami atiaki ekeko moko na Beteli mpe mosusu na Dani.


Na mokolo wana kaka, moto na Nzambe apesaki elembo : — Tala elembo oyo elakisi ete ezali Yawe nde alobi : Etumbelo ekobukana mpe putulu oyo ezali likolo na yango ekopanzana.


Kaka na tango yango, etumbelo ebukanaki mpe putulu epanzanaki. Ezalaki penza elembo oyo moto na Nzambe apesaki kolanda etinda na Yawe.


Boloba na bango : « Tala makambo oyo mokonzi alobi : ‹ Bobwaka moto oyo na boloko mpe bopesa ye bilei mosusu te, kaka lipa mpe mayi kino tango nakozonga na kimia. › »


Mokonzi Asa asilikelaki makasi momoni makambo mpe abwakaki ye na boloko. Kaka na tango yango, Asa anyokolaki ndambo ya bato.


« Bosimba bapakolami na Ngai te, bosala mabe te epai na basakoli na Ngai ! »


Mokonzi akozongisela bango : « Nazali koloba na bino penza ya solo : eloko nyonso oyo bosalaki mpo na moko kati na bandeko na Ngai, oyo bazali bato pamba, boyeba malamu ete bosalaki yango nde epai na Ngai. »


Bato oyo bakangaki Yesu bamemaki Ye liboso ya Kayifa, mokonzi ya Banganga-Nzambe, epai wapi balakisi ya Mobeko mpe bakambi ya bato basanganaki.


Yesu atalaki moko na moko kati na bango mpe alobaki na moto oyo akufa loboko : — Sembola loboko na yo ! Moto yango asembolaki loboko, mpe loboko na ye ebikaki.


Nazali koloba na bino penza ya solo : moto oyo ayambi motindami na Ngai ayambi nde Ngai, mpe moto oyo ayambi Ngai ayambi mpe Motindi na Ngai.


Tango Yesu alobaki na bango : « Ezali Ngai oyo, » bazongaki na sima mpe bakweyaki na mabele.


Soki moto moko ameki kosala bango mabe, moto ekobima na minoko na bango mpe ekozikisa banguna na bango. Ezali ndenge wana nde moto nyonso oyo akolinga kosala bango mabe asengeli kokufa.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ