Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 13:34 - Mokanda na Bomoi

34 Oyo nde ezalaki lisumu ya ndako ya Jeroboami, oyo ememaki kokweya mpe kobebisama ya bokonzi na ye kati na mokili.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 13:34
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Jeroboami amilobelaki : « Ndenge makambo ezali kotambola, bokonzi ekoki kozonga na ndako ya Davidi.


Bongo likambo oyo ememaki bato na lisumu, pamba te bamoko bazalaki kokende kogumbamela ekeko oyo ezalaki na Beteli, mpe bamosusu bazalaki kokende mosika kino na Dani mpo na kogumbamela ekeko mosusu.


Na tango wana kaka, Abiya, mwana mobali ya Jeroboami, akomaki kobela.


Yango wana, nakoyeisa pasi na ndako ya Jeroboami, nakosilisa koboma mibali nyonso kati na ndako ya Jeroboami, ezala mowumbu to monsomi kati na Isalaele ; nakokomba ndako ya Jeroboami ndenge bakombaka matiti ya mbindo, kino nyonso penza ekosila.


Bambwa ekolia bato nyonso ya Jeroboami, oyo bakokufa kati na engumba ; mpe bandeke ya likolo ekolia bato nyonso oyo bakokufa na zamba, elobi Yawe. › »


Akokaba Isalaele mpo na masumu oyo Jeroboami asali mpe asalisi Isalaele.


Kende koloba na Jeroboami : « Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : ‹ Natombolaki yo kati na bato mpe nakomisaki yo mokambi ya bato na Ngai, Isalaele.


Tango Asa, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu mibale na bokonzi ; Nadabi, mwana mobali ya Jeroboami, akomaki mokonzi ya Isalaele mpe akonzaki Isalaele mibu mibale.


Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe, atambolaki na banzela mabe ya tata na ye, oyo atindikaki mpe bato ya Isalaele na kosala masumu.


Nakokomisa ndako na yo lokola ndako ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, mpe lokola ndako ya Baesha, mwana mobali ya Ayiya ; pamba te opesi Ngai kanda mpe osali ete Isalaele asala masumu. »


Kasi Jewu atikaki te masumu ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, oyo, na nzela na yango, akweyisaki Isalaele na lisumu. Lisumu yango ezali : kosambela bikeko ya bangombe ya wolo, na Beteli mpe na Dani.


Nzokande, Jewu asalaki bokebi te mpo na kobatela mibeko ya Yawe, Nzambe ya Isalaele, na motema na ye mobimba. Atikaki te masumu ya Jeroboami oyo, na nzela na yango, akweyisaki Isalaele na lisumu.


Tango Yawe alongolaki Isalaele na se ya bokonzi ya Davidi, bana ya Isalaele bakomisaki Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, mokonzi na bango. Jeroboami atindikaki Isalaele ete balanda Yawe te, mpe amemisaki bango lisumu ya monene.


Bosembo ebatelaka moto oyo atambolaka alima na nzela na ye, kasi mabe ebebisaka bongo ya moto ya masumu.


Mpo na yango, tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Nakolongola yo na mokili oyo, okokufa kaka na mobu oyo ; pamba te otindiki bato na kotombokela Yawe. › »


Bisambelo ya likolo ya bangomba ya Beti-Aveni epai wapi Isalaele azalaki kosala masumu ekobebisama. Banzube mpe basende ekobota na bitumbelo na bango mpe ekozipa yango. Bongo bakoloba na bangomba milayi : « Bozipa biso ! » Mpe bakoloba na bangomba mikuse : « Bokweyela biso ! »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ