1 Bakonzi 13:33 - Mokanda na Bomoi33 Atako bongo, Jeroboami atikaki te banzela na ye ya mabe, akobaki kaka kotia bato ya mboka na ye lokola banganga-nzambe ya bisambelo ya likolo ya bangomba ; abulisaki lokola nganga-nzambe ya esambelo ya likolo ya ngomba moto nyonso oyo alingaki kokoma nganga-nzambe. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Boni, bobenganaki te Banganga-Nzambe ya Yawe, bana mibali ya Aron, mpe Balevi ? Bomikomisaki te banganga-nzambe ya banzambe ya bikeko ndenge bato ya bikolo mosusu basalaka ? Moto na moto azalaki koya na ngombe moko ya mobali mpe bameme sambo ya mibali oyo azalaki kozwa na etonga na ye, mpo ete bakomisa ye nganga-nzambe ya oyo ezali kutu banzambe te.