1 Bakonzi 13:32 - Mokanda na Bomoi32 Pamba te liloba oyo asakolaki kolanda etinda na Yawe mpo na kolakela mabe, etumbelo ya Beteli mpe bisambelo nyonso ya likolo ya bangomba kati na engumba Samari, ekokokisama solo. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Kolanda etinda na Yawe, moto na Nzambe agangaki makasi mpo na kolakela etumbelo mabe : « Etumbelo, etumbelo ! Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Mwana mobali moko akobotama na ndako ya Davidi, kombo na ye ekozala Joziasi. Akotumba na likolo na yo lokola mbeka banganga-nzambe ya bisambelo ya likolo ya bangomba, oyo batumbaka ansa na likolo na yo. Mpe na likolo na yo, etumbelo, bakotumba mikuwa ya bato ! › »