31 Sima na kokunda ye, alobaki na bana na ye ya mibali : — Tango nakokufa, bokokunda ngai kati na lilita epai wapi bakundi moto na Nzambe ; bokotia mikuwa na ngai pembeni ya mikuwa na ye.
Nani akoki kotanga putulu ya Jakobi to kotanga motango ya bakitani ya Isalaele ? Tika ete nakufa kufa ya bato ya sembo, mpe tika ete suka na ngai ezala lokola ya bango ! › »
Na esika oyo yo okokufa nde ngai mpe nakokufa, mpe na esika yango nde bakokunda ngai. Tika ete Yawe apesa ngai etumbu ya makasi soki eloko mosusu ekaboli biso longola kaka kufa.