29 Mosakoli ya mobange atombolaki ebembe ya moto na Nzambe, atiaki yango na likolo ya ane mpe amemaki yango na engumba na ye mpo na kosalela ye matanga mpe kokunda ye.
Abimaki mpe akutaki ebembe elali na nzela, ane mpe nkosi etelemi pembeni ya ebembe. Nkosi eliaki te ezala ebembe to ane.
Atiaki ebembe kati na kunda na ye moko mpe ayembelaki ye nzembo oyo ya mawa : — Ah, mawa, ndeko na ngai !
Mokonzi alobaki : — Botika yango, moto moko te asimba mikuwa na ye. Boye batikaki mikuwa na ye mpe mikuwa ya mosakoli oyo awutaki na Samari.
Tango bayekoli ya Yoane bayokaki sango yango, bayaki kozwa nzoto na ye mpe batiaki yango kati na kunda moko.