1 Bakonzi 13:2 - Mokanda na Bomoi2 Kolanda etinda na Yawe, moto na Nzambe agangaki makasi mpo na kolakela etumbelo mabe : « Etumbelo, etumbelo ! Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Mwana mobali moko akobotama na ndako ya Davidi, kombo na ye ekozala Joziasi. Akotumba na likolo na yo lokola mbeka banganga-nzambe ya bisambelo ya likolo ya bangomba, oyo batumbaka ansa na likolo na yo. Mpe na likolo na yo, etumbelo, bakotumba mikuwa ya bato ! › » အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Na mobu ya mwambe ya bokonzi na ye, lokola azalaki nanu elenge, akomaki koluka Nzambe ya Davidi, tata na ye ; bongo na mobu ya zomi na mibale, akomaki kopetola Yuda mpe Yelusalemi na kopekisa bato kokende na bisambelo ya likolo ya bangomba, na kobuka makonzi ya bule ya nzambe mwasi Ashera elongo na bikeko ya banzambe basala na nzete mpe na bibende oyo banyangwisa na moto.
mpo na yango, bino bangomba ya Isalaele, boyoka liloba na Nkolo Yawe : Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi na bangomba ya milayi mpe ya mikuse, na mabulu mpe na mabwaku, na bisika ya libebi mpe na bingumba oyo basundola mpe babebisa, bongo bato ya bikolo mosusu ya zingazinga bayibaki mpe bakomisaki yango eloko ya kotiola ;