Moto moko na Nzambe alongwaki na Yuda mpe akendeki na Beteli, kolanda etinda na Yawe, wana Jeroboami atelemaki pembeni ya etumbelo mpo na kotumba ansa.
Kasi moto na Nzambe azongiselaki mokonzi : — Ata soki opesi ngai kati-kati ya bozwi na yo, nakokende epai na yo te, nakolia lipa te mpe nakomela ata litanga ya mayi te na esika oyo.
Na tango wana, moko kati na bana ya basakoli alobaki na moninga na ye, na etinda ya Yawe : — Nasengi na yo ete obeta ngai. Kasi moninga na ye aboyaki kobeta ye.
Kolanda liloba na Nkolo, tala makambo oyo tozali koyebisa bino : biso ba-oyo tokotikala na bomoi kino na tango oyo Nkolo akoya, tokokende te liboso ya bato oyo bakufa ;