14 alandaki moto na Nzambe mpe akutaki ye avandi na se ya nzete ya Terebente. Atunaki ye : — Ozali solo moto na Nzambe oyo awuti na Yuda ? Moto na Nzambe azongisaki : — Iyo, ezali nde ngai.
Abrami atambolaki kati na mokili yango kino na esika oyo babengaka Sishemi, na nzete monene ya More. Na tango wana, bato ya Kanana bazalaki kovanda na mokili yango.
Sima na ye kotambola mokolo mobimba kati na esobe, akomaki na nzete moko ya moke, avandaki na se na yango mpe asengaki kufa na maloba oyo : — Yawe, nalembi ! Zwa molimo na ngai mpo ete naleki bakoko na ngai te na malamu.
Nzokande libulu ya mayi ya Jakobi ezalaki kati na elanga yango. Boye lokola Yesu alembaki nzoto mpo na mobembo, avandaki pembeni ya libulu yango. Ezalaki pene ya ngonga ya midi.
Solo nasalaki misala makasi mpe ya pasi penza ; mbala mingi, nalalaki pongi te, nazangaki bilei ya kolia mpe mayi ya komela, nakilaki bilei, nanyokwamaki na malili, mpe nazangaki bilamba ya kolata.