7 Bazongiselaki ye : — Soki, na mokolo ya lelo, omikomisi mosali ya bato oyo, soki osaleli bango mpe opesi bango eyano ya malamu, bakozala tango nyonso basali na yo.
Mokonzi Roboami aboyaki kosalela toli oyo bampaka bapesaki ye, ayanolaki bato na maloba mabe makasi ;
Kasi Roboami aboyaki toli oyo bampaka bapesaki ye ; asengaki toli epai ya bilenge mibali oyo bakolaki esika moko na ye mpe bazalaki kosalela ye.
Eyano ya kimia ekimisaka kanda, kasi maloba oyo ezokisaka ebakisaka kanda.
Soki mokonzi atombokeli yo, kolongwa na esika na yo ya mosala te ; pamba te motema ya kokita epekisaka bambeba minene.
Yawe abimisaki maloba ya kimia mpe ya kobondisa, na monoko ya Anjelu oyo azalaki koloba na ngai.