Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 12:6 - Mokanda na Bomoi

6 Mokonzi Roboami atunaki toli epai ya bampaka oyo basalaki elongo na Salomo, tata na ye, tango azalaki nanu na bomoi. Alobaki na bango : — Toli nini bozali kopesa ngai lokola eyano ya kopesa epai ya bato oyo ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 12:6
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abisalomi alobaki na Ayitofeli : — Pesa biso toli na yo : tosengeli kosala nini ?


Kasi Abisalomi alobaki : — Bobengisa lisusu Ushayi, moto ya Ariki, mpo ete toyoka makambo nini oyo ye mpe azali na yango ya koloba.


Esengo na bato na yo, esengo na basali na yo, ba-oyo batelemaka tango nyonso liboso na yo mpe bayokaka maloba na yo, oyo etonda na bwanya !


Tala bakambi oyo bazalaki kosala na ye elongo : Azaria, koko ya Nganga-Nzambe Tsadoki ;


Bwanya ezalaka kati na bampaka te ? Bomoi ya molayi epesaka mayele te ?


Nazalaki komilobela : ‹ Bato oyo bazali na mibu ebele ya mbotama bakoyeba koloba, pamba te kozala na mibu ebele epesaka bwanya. ›


Kosundola te molingami na yo to molingami ya tata na yo, mpe kokende te na ndako ya ndeko na yo tango ozali na pasi ; kozala na molingami ya pembeni ezali malamu koleka kozala na ndeko ya mosika.


Azaria, mwana mobali ya Oshaya ; Yoanani, mwana mobali ya Karea, mpe bato oyo nyonso ya lolendo balobaki na Jeremi : — Ozali koloba makambo ya lokuta ! Yawe, Nzambe na biso, atindi yo te koloba na biso ete tokende te kovanda na Ejipito.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ