Longwa wana, akendeki na bangomba ya este ya Beteli. Atongaki ndako na ye ya kapo kati ya Beteli mpe Ayi, na esika oyo atongaki etumbelo mpo na Yawe mpe abelelaki Kombo ya Yawe. Beteli ezalaki na ngambo ya weste mpe Ayi, na ngambo ya este.
Tango Abrami ayokaki ete bakangi ndeko na ye, abengisaki bato nkama misato na zomi na mwambe oyo bayebi kobunda mpe babotama na ndako na ye. Boye balandaki bango kino na Dani.
Nzambe alobaki na Jakobi : « Kende na Beteli, vanda kuna mpe tonga kuna etumbelo mpo na Nzambe oyo abimelaki yo tango ozalaki kokima ndeko na yo Ezawu. »
Tango mokonzi Jeroboami ayokaki bilakeli mabe oyo moto na Nzambe alobaki mpo na etumbelo ya Beteli, asembolaki loboko na ye wuta na etumbelo mpe alobaki : — Bokanga ye ! Kasi loboko oyo Jeroboami asembolaki epai ya moto na Nzambe ekawukaki, mpe akokaki lisusu te kozongisa yango epai na ye.
Beni-Adadi andimaki maloba ya mokonzi Asa mpe atindaki bakonzi ya basoda na ye kobundisa bingumba ya Isalaele. Abotolaki Iyoni, Dani, Abele-Beti-Maaka, etuka mobimba ya Kinereti mpe mokili nyonso ya Nefitali.
Kasi Jewu atikaki te masumu ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, oyo, na nzela na yango, akweyisaki Isalaele na lisumu. Lisumu yango ezali : kosambela bikeko ya bangombe ya wolo, na Beteli mpe na Dani.
Eliya alobaki na Elize : — Nabondeli yo, tikala awa ; pamba te Yawe atindi ngai na Beteli. Elize azongisaki : — Na Kombo na Yawe mpe na kombo na yo, nakotika yo te ! Boye bakendeki na Beteli.
Mpe sik’oyo, bokani kotelemela bokonzi ya Yawe, oyo ezali na maboko ya bana ya Davidi ! Bobongisi mampinga minene mpe bozali, kati na bino, na bikeko ya bana ngombe oyo Jeroboami asalelaki bino lokola banzambe.
Lokito ya bampunda ya banguna mpe makelele ya makolo na yango ezali koyokana wuta na Dani, ezali koya mpo na kobebisa mokili mpe biloko nyonso oyo ezali kati na yango, engumba mpe bavandi na yango nyonso, bongo mokili mobimba eningani.
Bavandi ya Samari bazali kolenga mpo na mwana ngombe ya mwasi ya Beti-Aveni ; bato na yango mpe Banganga-Nzambe oyo bagumbamelaka ekeko ya mwana ngombe bakosala matanga na tina na yango. Tika ete basepela lelo mpo ete nkembo ya mwana ngombe elongwe kati na bango.
Ata soki yo, Isalaele, osali ekobo, tika ete Yuda amikweyisa te ! Kokende na Giligali te, komata na Beti-Aveni te mpe kolapa ndayi te na koloba : « Na Kombo na Yawe ! »
Bato oyo balapaka ndayi na kombo ya nzambe ya ekeko ya Samari mpe balobaka : ‹ Dani, lokola nzambe na yo azali na bomoi › to ‹ lokola nzambe ya Beri-Sheba azali na bomoi, › bakokweya mpe bakotelema lisusu te. »
Wuta na bitando ya Moabi, Moyize amataki na likolo ya ngomba Nebo kino na songe ya ngomba Pisiga oyo etalana na Jeriko. Kuna, Yawe alakisaki ye mokili mobimba : wuta na Galadi kino na Dani,
Wuta na Jeriko, Jozue atindaki bato kokende na engumba Ayi oyo ezalaki pene ya Beti-Aveni, na ngambo ya este ya Beteli. Alobaki na bango : « Bokende kononga mokili wana. » Bato yango bakendeki mpe banongaki Ayi.
Bana nyonso ya Isalaele, wuta na Dani kino na Beri-Sheba mpe na mokili ya Galadi, babimaki lokola moto moko mpe basanganaki liboso ya Yawe, na Mitsipa.