Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 12:26 - Mokanda na Bomoi

26 Jeroboami amilobelaki : « Ndenge makambo ezali kotambola, bokonzi ekoki kozonga na ndako ya Davidi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 12:26
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Soki osali nyonso oyo Ngai nazali kotinda yo, soki otamboli na banzela na Ngai mpe osali makambo ya sembo na miso na Ngai, na kobatelaka mibeko mpe malako na Ngai ndenge Davidi, mowumbu na Ngai, asalaki, wana nakozala na yo elongo, nakosala ete bokonzi kati na libota na yo elendisama ndenge nasalaki epai ya Davidi, mpe nakopesa yo Isalaele.


Jeroboami atongaki engumba Sishemi, kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi, mpe avandaki kuna. Longwa na Sishemi, abimaki mpe akendeki kotonga Penueli.


Soki bato oyo bamati na Yelusalemi mpo na kobonza mbeka na Tempelo ya Yawe, bakopesa lisusu mitema na bango epai ya nkolo na bango, Roboami, mokonzi ya Yuda. Bakoboma ngai mpe bakozonga epai ya mokonzi Roboami. »


Baesha, mokonzi ya Isalaele, abundisaki Yuda mpe alendisaki bamir ya engumba Rama mpo na kopekisa bato kokota to kobima na mokili ya Asa, mokonzi ya Yuda.


Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe, wana alandaki masumu ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati. Jeroboami akweyisaki na yango Isalaele na lisumu, mpe Yoakazi atikaki te lisumu yango.


Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, bakendeki na esobe ya Tekoa. Na tango ya kokende, Jozafati atelemaki mpe alobaki : « Bino, bato ya Yuda mpe bavandi ya Yelusalemi, boyoka ngai ! Botia elikya na Yawe, Nzambe na bino, mpe bokolendisama ! Bondimela basakoli na Ye, mpe bokolonga ! »


Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi. Bazoba bamilobelaka : « Nzambe azali te. » Makanisi na bango esila kobeba, basalaka makambo ya nkele, mpe moko te asalaka bolamu.


Nzela mosusu emonanaka sembo na miso ya bato, nzokande, na suka, ememaka na kufa.


Moto ya Efrayimi ezali Samari, mpe moto ya Samari ezali kaka mwana mobali ya Remalia. Soki botelemi ngwi te na kondima na bino, bokolonga te kotelema liboso na bango ! › »


Tango Mofarizeo oyo abengisaki Yesu amonaki bongo, amilobelaki : — Soki moto oyo azali mosakoli, alingaki koyeba soki mwasi oyo azali kosimba Ye azali nani, mpe soki azali mwasi ya lolenge nini : moto ya masumu.


Bongo Bafarizeo balobanaki bango na bango : — Bomoni, bokokoka lisusu eloko moko te ; bato nyonso bakomi na bango kolanda ye !


Davidi akanisaki mpe amilobelaki : « Mokolo ezali oyo Saulo akoboma ngai na nzela ya loboko na ye. Boye eleki malamu mpo na ngai kokima na mokili ya bato ya Filisitia. Na bongo nde Saulo akotika koluka ngai kati na Isalaele mobimba, mpe ngai nakokima loboko na ye. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ