25 Jeroboami atongaki engumba Sishemi, kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi, mpe avandaki kuna. Longwa na Sishemi, abimaki mpe akendeki kotonga Penueli.
Abrami atambolaki kati na mokili yango kino na esika oyo babengaka Sishemi, na nzete monene ya More. Na tango wana, bato ya Kanana bazalaki kovanda na mokili yango.
Baesha, mokonzi ya Isalaele, abundisaki Yuda mpe alendisaki bamir ya engumba Rama mpo na kopekisa bato kokota to kobima na mokili ya Asa, mokonzi ya Yuda.
Asombaki ngomba Samari epai ya Shemeri na motuya ya palata nkoto motoba mpe atongaki engumba likolo na yango. Abengaki engumba yango Samari kolanda kombo ya Shemeri, mokolo na yango ya liboso.
bato tuku mwambe bawutaki na Sishemi, na Silo mpe na Samari ; bazalaki na mandefu bakata, bilamba epasuka-pasuka, mpe bamizokisaki-zokisaki bapota na banzoto. Bamemaki makabo ya bagato mpe malasi ya ansa mpo na kobonza yango kati na Tempelo ya Yawe.
Wuta kuna, Jedeon amataki na mboka Penueli mpe asengaki epai ya bavandi na yango, ndenge kaka asengaki epai ya bato ya Sukoti. Kasi bato ya Penueli bazongiselaki ye ndenge kaka bato ya Sukoti basalaki.