Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 12:22 - Mokanda na Bomoi

22 Kasi Nzambe alobaki na Shemaya, moto na Nzambe :

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 12:22
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moto moko na Nzambe alongwaki na Yuda mpe akendeki na Beteli, kolanda etinda na Yawe, wana Jeroboami atelemaki pembeni ya etumbelo mpo na kotumba ansa.


Nzokande, mosakoli moko ya mobange azalaki kovanda na Beteli ; bana na ye ya mibali bayaki koyebisa ye makambo nyonso oyo moto na Nzambe asalaki na Beteli, na mokolo wana, mpe oyo alobaki na mokonzi.


Mwasi yango alobaki na Eliya : — Moto na Nzambe, nasali yo nini ? Boni, oyaki na ndako na ngai mpo na kokundola lisumu na ngai mpe kobomisa mwana na ngai ya mobali ?


Mwasi yango alobaki na Eliya : — Nasosoli sik’oyo ete ozali solo moto na Nzambe ; mpe Liloba na Yawe, oyo ebimaka na monoko na yo ezali penza solo.


Elize alobaki : — Na mobu oyo ekoya, na eleko oyo, maboko na yo ekosimba mwana mobali. Mwasi ya Sunami agangaki : — Te, nkolo na ngai, moto na Nzambe, kopesa na ngai mwasi mosali na yo elikya ya lokuta te !


Bongo abengaki mobali na ye mpe alobaki na ye : — Nabondeli yo, tindela ngai elenge moko kati na basali mpe ane moko ya mwasi, mpo ete nakende noki epai ya moto na Nzambe mpe nazonga mbala moko.


Boye, akendeki mpe akomaki na ngomba Karimeli epai wapi moto na Nzambe azalaki kovanda. Tango Elize amonaki ye na mosika, alobaki na mosali na ye, Geazi : — Tala ! Ezali mwasi ya Sunami !


Boye akobaki nzela na ye kino akomaki na ngomba, epai ya moto na Nzambe. Mpe amibwakaki na makolo na ye. Geazi apusanaki mpo na kolongola ye na makolo ya Elize, kasi moto na Nzambe alobaki : — Tika ye bongo ! Azali na pasi makasi kati na motema na ye, kasi Yawe abombeli ngai yango mpe atalisi ngai te tina na yango.


Mwasi yango akendeki koyebisa moto na Nzambe. Mpe moto na Nzambe alobaki na ye : — Kende, teka mafuta yango mpe futa niongo na yo ; bongo, yo elongo na bana na yo ya mibali, bokobika na oyo ekotikala.


Tango Elize, moto na Nzambe, ayokaki ete mokonzi ya Isalaele apasolaki bilamba na ye, atindelaki ye liloba oyo : « Mpo na nini opasoli bilamba na yo ? Tika ete moto wana aya epai na ngai, mpe akoyeba ete ezali na mosakoli moko kati na Isalaele ! »


Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Roboami, kobanda na ebandeli kino na suka, ekomama kati na buku ya misala ya mosakoli Shemaya mpe ya momoni makambo Ido, buku epai wapi emonani milongo ya mbotama. Ezalaki tango nyonso na bitumba kati na Roboami mpe Jeroboami.


Namemaki bango na Tempelo ya Yawe, kati na shambre ya bana mibali ya Anani, mwana mobali ya Yigidalia, moto na Nzambe, pene ya shambre ya bakambi. Shambre yango ezalaki na sima ya shambre ya Maaseya, mwana mobali ya Shalumi, mokengeli ekuke.


Tala lipamboli oyo Moyize, moto na Nzambe, asakolaki mpo na bana ya Isalaele liboso ete akufa.


Kasi yo, moto na Nzambe, kima makambo nyonso wana ; luka nde bosembo, botosi kati na makambo ya Nzambe, kondima, bolingo, molende mpe boboto.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ