Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 12:13 - Mokanda na Bomoi

13 Mokonzi Roboami aboyaki kosalela toli oyo bampaka bapesaki ye, ayanolaki bato na maloba mabe makasi ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 12:13
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abrami alobaki : — Mosali na yo azali na maboko na yo. Sala epai na ye nyonso oyo omoni malamu. Boye, Sarayi akomaki konyokola Agari mpe Agari akimaki mosika na ye.


— Moto oyo azali mokonzi ya mokili alobelaki biso na maloba makasi. Azwaki biso lokola banongi.


Tango kaka Jozefi amonaki bango, asosolaki mbala moko ete bazali bandeko na ye. Kasi asalaki lokola nde azali mopaya liboso na bango mpe azalaki na maloba makasi epai na bango. Atunaki bango : — Bowuti wapi ? Bazongisaki : — Towuti na mokili ya Kanana ; toyei nde kosomba biloko ya kolia.


Bato nyonso ya Yuda bazongiselaki bato ya Isalaele : — Tosalaki bongo, pamba te mokonzi azali ndeko na biso ya mosika te. Bongo mpo na nini kosilika na tina na yango ? Boni, tobikaki bomoi na biso mpo na mokonzi ? Tozwaki ata eloko moko mpo na biso ?


Sima na mikolo misato, Jeroboami elongo na bato nyonso bazongaki epai ya Roboami, ndenge mokonzi ayebisaki bango : « Bozongela ngai sima na mikolo misato. »


alandaki toli ya bilenge mibali mpe ayebisaki bango : Soki tata na ngai anyokolaki bino na misala makasi, ngai nakoyeisa yango lisusu makasi koleka ; soki tata na ngai azalaki kobeta bino fimbu ya poso ya nyama, ngai nakobeta bino fimbu ya ebende.


Faraon alobaki na Moyize : — Longwa liboso na ngai mpe keba na yo ! Koya lisusu liboso na ngai te ! Mokolo oyo okoya lisusu liboso na ngai, okokufa.


Faraon azongisaki : — Ye Yawe nde nani mpo ete ngai natosa ye mpe natika Isalaele kokende ? Nayebi ye te mpe nakotika te ete Isalaele akende.


Monoko ya moto ya sembo ezali etima ya bomoi, kasi monoko ya moto mabe ebombaka makambo mabe.


Bibebu ya moto ya sembo eyebaka makambo oyo ezali malamu, kasi monoko ya moto mabe ezalaka kaka na makambo mabe.


Moto oyo asanganaka na bato ya bwanya akomaka moto ya bwanya, kasi moto oyo atambolaka nzela moko na bazoba akomona pasi.


Eyano ya kimia ekimisaka kanda, kasi maloba oyo ezokisaka ebakisaka kanda.


Mobola alobaka na mongongo ya kobondela, kasi mozwi azongisaka eyano na lolendo.


Maloba ya moto ya bwanya epesaka esengo, kasi maloba ya zoba elukelaka ye makambo.


Bongo, nani ayebi soki moto yango akozala moto ya bwanya to zoba ? Nzokande, ye nde akozala na bokonzi na likolo ya misala nyonso oyo nabimiselaki motoki mpe mayele na ngai na se ya tango. Yango mpe ezali kaka pamba.


Kasi bwanya oyo ewutaka epai ya Nzambe ezalaka nanu ya peto ; bongo, ememaka kimia, boboto, boyokani, koyokela bato mawa ; ebotaka bambuma ya malamu, eponaka bilongi te mpe ezalaka na lokuta te.


Davidi atunaki Jonatan : — Bongo soki tata na yo akozongisela yo eyano na kanda, nani akoyebisa ngai ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ