12 Sima na mikolo misato, Jeroboami elongo na bato nyonso bazongaki epai ya Roboami, ndenge mokonzi ayebisaki bango : « Bozongela ngai sima na mikolo misato. »
soki tata na ngai anyokolaki bino na misala makasi, ngai, nakoyeisa yango lisusu makasi koleka ; soki tata na ngai azalaki kobeta bino fimbu ya poso ya nyama, ngai nakobeta bino fimbu ya ebende. »
Mokonzi Roboami aboyaki kosalela toli oyo bampaka bapesaki ye, ayanolaki bato na maloba mabe makasi ;
Roboami azongisaki : — Bokende epai na bino, bopesa ngai mikolo misato mpo na koyekola likambo yango, bongo bozongela ngai. Mpe bato bakendeki.