Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 11:9 - Mokanda na Bomoi

9 Yawe atombokelaki Salomo mpo ete motema na ye epengwaki mosika na Yawe, Nzambe ya Isalaele, oyo amimonisaki epai na ye mbala mibale.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 11:9
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sima na matanga, Davidi abengisaki mwasi ya Uri kati na ndako na ye mpe akomisaki ye mwasi na ye. Mwasi yango abotelaki Davidi mwana mobali. Kasi likambo oyo Davidi asalaki esepelisaki Yawe te.


Yawe asilikelaki Uza makasi, mpe Nzambe abetaki ye mpo na mbeba na ye. Boye Uza akufaki kaka wana, pembeni ya Sanduku ya Nzambe.


Asalaki mpe bongo mpo na banzambe ya basi na ye nyonso ya bikolo ya bapaya mpo ete batumbelaka yango malasi mpe babonzelaka yango mbeka.


Na Gabaoni, Yawe amimonisaki epai ya Salomo kati na ndoto ya butu. Nzambe alobaki na ye : — Senga Ngai nyonso oyo olingi ete napesa yo.


Yawe abimelaki Salomo na mbala ya mibale, ndenge kaka abimelaki ye na mbala ya liboso, na Gabaoni.


Etinda yango esepelisaki Nzambe te mpe Nzambe apesaki Isalaele etumbu.


Boye Yawe asilikelaki Moyize mpe alobaki na ye : — Boni, Aron, moto ya libota ya Levi, azali ndeko na yo te ? Nayebi ete alobaka malamu mpe ye wana azali koya kokutana na yo ; mpe motema na ye ekosepela tango akomona yo.


Batela malamu motema na yo koleka biloko nyonso, pamba te makambo nyonso oyo tosalaka, wana tozali na bomoi, ewutaka na motema.


mpo na komipesa na kindumba, na masanga ya vino ya kala mpe ya sika oyo elongolaka bato bososoli.


Bongo Yawe apeliselaki bango kanda na Ye mpe atikaki bango.


Kasi likolo na bino, Yawe asilikelaki ngai mpe aboyaki koyoka ngai. Alobaki na ngai : — Ekoki boye ! Koloba na ngai lisusu likambo wana te.


noki te, bakopengwisa bana na yo ya mibali na miso na Ngai mpo ete basalela Ngai lisusu te kasi basalela banzambe mosusu, bongo Yawe akosilikela bino mpe akobebisa yo noki.


Yawe asilikelaki mpe Aron makasi kino alingaki koboma ye ; kasi na tango wana, nabondelaki mpe mpo na Aron.


Na ngomba Orebi, bopesaki Yawe kanda makasi mpe asilikelaki bino makasi kino akomaki na posa ya kobebisa bino.


Pamba te Demasi asundolaki ngai : alingaki mokili oyo mpe akendeki na Tesalonika ; Kresasi akendeki na Galatia, mpe Tito akendeki na Dalimatia.


— Nabongoli makanisi na Ngai na ndenge nakomisaki Saulo mokonzi, pamba te apesi Ngai mokongo mpe aboyi kotosa mitindo na Ngai. Samuele asilikaki mpe abelelaki Yawe butu mobimba.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ