40 Salomo alukaki koboma Jeroboami, kasi Jeroboami akimaki na Ejipito epai ya Shishaki, mokonzi ya Ejipito, avandaki kuna kino na kufa ya Salomo.
Na bongo, nakoyokisa ndako ya Davidi soni, kasi mpo na libela te. › »
Kasi sima na Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, koyoka sango yango wuta na Ejipito epai wapi akendeki kobombama mpo na kokima mokonzi Salomo, azongaki wuta na Ejipito.
Mokonzi Asa asilikelaki makasi momoni makambo mpe abwakaki ye na boloko. Kaka na tango yango, Asa anyokolaki ndambo ya bato.
Liboso na Yawe, bwanya moko te, mayele moko te mpe toli moko te ekoki kolonga.
Nasakolaki makambo ya suka na ebandeli ; wuta kala penza, nasakolaki makambo oyo ekoya. Nalobaki : « Mabongisi na Ngai ekolongisama, mpe nakosala nyonso oyo nasepeli kosala. »
Nani akoki kaka kobimisa liloba mpo ete likambo esalema soki Nkolo apesi yango nzela te ?
Saulo abwakelaki Jonatan likonga na ye mpo na koboma ye, mpe Jonatan asosolaki ete tata na ye azali na makanisi ya koboma Davidi.