Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 11:4 - Mokanda na Bomoi

4 Tango Salomo akomaki mobange, basi na ye batindikaki motema na ye na kogumbamela banzambe mosusu ; mpe atikaki kolinga Yawe, Nzambe na ye, na motema na ye mobimba ndenge ezalaki motema ya Davidi, tata na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 11:4
26 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Basi yango bawutaki na bikolo oyo, na tina na bango, Yawe alobaki na bana ya Isalaele : « Bosengeli te kobalana na bango, noki te bakopengwisa bino mpe bakotindika mitema na bino na kosambela banzambe na bango. » Nzokande, Salomo akangamaki na basi ya bikolo ya bapaya na bolingo makasi.


Nakosala bongo, pamba te basundolaki Ngai mpe bagumbamelaki Asitarite, nzambe mwasi ya bato ya Sidoni ; Kemoshi, nzambe ya bato ya Moabi ; mpe Moloki, nzambe ya bato ya Amoni, batambolaki te na banzela na Ngai mpo na kosala makambo ya sembo na miso na Ngai, kobatela malako mpe mibeko na Ngai, ndenge Davidi, tata ya Salomo, asalaki.


Soki osali nyonso oyo Ngai nazali kotinda yo, soki otamboli na banzela na Ngai mpe osali makambo ya sembo na miso na Ngai, na kobatelaka mibeko mpe malako na Ngai ndenge Davidi, mowumbu na Ngai, asalaki, wana nakozala na yo elongo, nakosala ete bokonzi kati na libota na yo elendisama ndenge nasalaki epai ya Davidi, mpe nakopesa yo Isalaele.


Salomo akonzaki Isalaele mobimba mibu tuku minei, na Yelusalemi.


Boye, Salomo asalaki penza makambo mabe na miso ya Yawe mpe atambolaki na boyengebene te liboso ya Yawe ndenge Davidi, tata na ye, atambolaki.


Yawe atombokelaki Salomo mpo ete motema na ye epengwaki mosika na Yawe, Nzambe ya Isalaele, oyo amimonisaki epai na ye mbala mibale.


Roboami, mwana mobali ya Salomo, akomaki mokonzi ya Yuda ; azalaki na mibu tuku minei na moko ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu zomi na sambo na Yelusalemi, engumba oyo Yawe aponaki kati na mabota nyonso ya Isalaele mpo na kotia Kombo na Ye. Kombo ya mama na Roboami ezalaki « Naama. » Naama azalaki moto ya Amoni.


Nzokande, atako abebisaki te bisambelo ya likolo ya bangomba, Asa abatelaki motema na ye sembo na miso ya Yawe, na mikolo nyonso ya bomoi na ye.


Asalaki masumu nyonso oyo tata na ye asalaki liboso ete Abiyami akoma mokonzi. Apesaki te motema na ye mobimba epai na Yawe, Nzambe na ye, ndenge ezalaki motema ya Davidi, koko na ye.


Salomo alakisaki bolingo na ye mpo na Yawe na kotambola kolanda malako ya Davidi, tata na ye, longola kaka kotumba mbeka mpe ansa na bisambelo ya likolo ya bangomba.


Salomo abandaki kotonga Tempelo ya Yawe sima na mibu nkama minei na mwambe, wuta Isalaele abimaki na Ejipito, mobu oyo ekokanaki na mobu ya minei ya bokonzi na ye kati na Isalaele, na sanza ya zivi.


Tika ete mitema na bino ezala sembo epai na Yawe, Nzambe na biso, mpo ete botambola kolanda mibeko na Ye mpe bobatela malako na Ye ndenge bosali yango na mokolo ya lelo. »


Sima na mibu tuku mibale oyo Salomo asalaki mpo na kotonga Tempelo ya Yawe mpe ndako na ye moko,


Mpo na yo, soki okotambola liboso na Ngai ndenge Davidi, tata na yo, atambolaki na motema malamu mpe na motema ya sembo ; soki okosala nyonso oyo natindaki yo mpe okobatela mibeko mpe malako na Ngai,


— Oh Yawe, kanisa ndenge nini natambolaki liboso na Yo na boyengebene, ndenge nini namipesaki epai na Yo na motema na ngai mobimba, mpe ndenge nini nasalaki makambo ya malamu na miso na Yo. Mpe Ezekiasi alelaki mingi.


Bongo, yo Salomo, mwana na ngai, yeba Nzambe ya tata na yo mpe salela Ye na motema na yo mobimba mpe na esengo ; pamba te Yawe amonaka kino na bozindo ya mitema nyonso mpe asosolaka makanisi na yango nyonso. Soki oluki Ye, okomona Ye ; kasi soki atiki Ye, akobwaka yo mpo na libela.


Pesa na mwana na ngai ya mobali, Salomo, motema ya boyengebene mpo na kobatela mitindo na Yo, malako na Yo mpe bikateli na Yo ; mpo na kosala nyonso mpe kotonga Ndako oyo nasaleli mabongisi oyo nyonso. »


Yawe azalaki elongo na Jozafati mpo ete, na eteni ya liboso ya bomoi na ye, alandaki ndakisa ya Davidi, tata na ye, mpe amipesaki te na banzambe Bala.


Asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe, kasi na motema na ye mobimba te.


Asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe mpe alandaki banzela oyo Davidi, tata na ye, atambolaki na yango : apengwaki na yango te, ezala na ngambo ya loboko ya mwasi to na ngambo ya loboko ya mobali.


Okozalaka na banzambe mosusu te, bobele Ngai.


Asengeli te kozala na basi ebele noki te motema na ye ekopengwa. Asengeli te kozala na palata mpe wolo ebele koleka.


noki te, bakopengwisa bana na yo ya mibali na miso na Ngai mpo ete basalela Ngai lisusu te kasi basalela banzambe mosusu, bongo Yawe akosilikela bino mpe akobebisa yo noki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ