Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 11:33 - Mokanda na Bomoi

33 Nakosala bongo, pamba te basundolaki Ngai mpe bagumbamelaki Asitarite, nzambe mwasi ya bato ya Sidoni ; Kemoshi, nzambe ya bato ya Moabi ; mpe Moloki, nzambe ya bato ya Amoni, batambolaki te na banzela na Ngai mpo na kosala makambo ya sembo na miso na Ngai, kobatela malako mpe mibeko na Ngai, ndenge Davidi, tata ya Salomo, asalaki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 11:33
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi nakobotola te bokonzi nyonso na maboko ya Salomo, nakotika ye nanu kokonza na mikolo nyonso oyo akozala na bomoi, mpo na Davidi, mowumbu na Ngai, oyo naponaki mpe abatelaki mitindo mpe malako na Ngai.


Tango Salomo akomaki mobange, basi na ye batindikaki motema na ye na kogumbamela banzambe mosusu ; mpe atikaki kolinga Yawe, Nzambe na ye, na motema na ye mobimba ndenge ezalaki motema ya Davidi, tata na ye.


Yawe atombokelaki Salomo mpo ete motema na ye epengwaki mosika na Yawe, Nzambe ya Isalaele, oyo amimonisaki epai na ye mbala mibale.


Nalongolaki bokonzi na maboko ya ndako ya Davidi mpe napesaki yo yango, kasi otambolaki te lokola Davidi, mowumbu na Ngai, oyo atosaki mibeko na Ngai mpe azalaki kolanda Ngai na motema na ye mobimba, mpo na kosala oyo kaka ezali malamu na miso na Ngai.


Mpe soki otamboli na banzela na Ngai, otosi malako mpe mitindo na Ngai ndenge tata na yo, Davidi, asalaki, nakopesa yo bomoi molayi.


Kasi anjelu ya Yawe alobaki na Eliya, moto ya mboka Tishibe : — Kende kokutana na bantoma ya mokonzi ya Samari mpe tuna bango : « Boni, Nzambe azali te kati na Isalaele mpo ete bokende kotuna epai ya Bala-Zebubi, nzambe ya Ekroni ?


Asundolaki Yawe, Nzambe ya batata na ye, mpe atambolaki na banzela ya Yawe te.


Bongo, yo Salomo, mwana na ngai, yeba Nzambe ya tata na yo mpe salela Ye na motema na yo mobimba mpe na esengo ; pamba te Yawe amonaka kino na bozindo ya mitema nyonso mpe asosolaka makanisi na yango nyonso. Soki oluki Ye, okomona Ye ; kasi soki atiki Ye, akobwaka yo mpo na libela.


Azaria ayaki liboso ya Asa mpe alobaki na ye : « Asa elongo na bato nyonso ya Yuda mpe ya Benjame, boyoka ngai ! Yawe azalaka elongo na bino soki bino bozali elongo na Ye. Soki boluki Ye, akomimonisa epai na bino. Nzokande, soki botiki Ye, Ye mpe akotika bino !


Boni, ezali na ekolo oyo etikaka banzambe na yango mpo na kosambela banzambe mosusu ? Nzokande, banzambe yango ezalaka kutu banzambe ya solo te. Kasi bato na Ngai basundoli Ye oyo azali Nkembo na bango mpo na kolanda banzambe ya bikeko oyo ezanga tina.


« Bato na Ngai basali masumu mibale : Basundoli Ngai oyo nazali etima ya bomoi, mpe batimoli bango moko mabulu ya mayi, mabulu oyo ekawukaka noki.


Boye, Moabi ekoyoka soni likolo ya Kemoshi ndenge bato ya Isalaele bayokaki soni tango batiaki mitema na Beteli.


Lokola bozali kotia mitema na misala na bino mpe na bomengo na bino, bino mpe bokokende na bowumbu ; boye Kemoshi mpe akokende na bowumbu elongo na Banganga-Nzambe mpe bakambi na ye.


Efrayimi asangani na banzambe ya bikeko : tika ye akoba bongo !


bato nyonso oyo bafukamaka na likolo ya bandako mpo na kosambela mampinga ya likolo, bato nyonso oyo bagumbamaka na kolapa ndayi na Kombo na Yawe mpe na kombo na nzambe Moloki,


Oh Moabi, mawa na yo ! Oh bato ya Kemoshi, bobebisami ! Bakomisaki bana na ye ya mibali bakimi ; mpe bana basi na ye, bakangami ya mokonzi Sikoni, mokonzi ya Amori.


Bongo Samuele alobaki na bato nyonso ya Isalaele : « Soki ezali na motema na bino mobimba nde bolingi kozonga epai na Yawe, bolongola kati na bino banzambe ya bapaya mpe bikeko ya Asitarite ; mpe bomipesa mobimba epai na Yawe mpe bosalela kaka Ye. Na nzela wana nde Ye akokangola bino na maboko ya bato ya Filisitia. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ