Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 11:32 - Mokanda na Bomoi

32 Kasi mpo na Davidi, mowumbu na Ngai, mpe mpo na engumba Yelusalemi oyo napona kati na mabota nyonso ya Isalaele, Salomo akozwa kaka libota moko.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 11:32
6 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzokande, mpo na Davidi, tata na yo, nakosala yango te na tango oyo ozali nanu na bomoi ; nakobotola yango nde na maboko ya mwana na yo ya mobali.


Kasi nakobotola ye bokonzi nyonso te ; nakotikela ye etuka moko mpo na Davidi, mowumbu na Ngai, mpe mpo na Yelusalemi, engumba oyo napona. »


Roboami, mwana mobali ya Salomo, akomaki mokonzi ya Yuda ; azalaki na mibu tuku minei na moko ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu zomi na sambo na Yelusalemi, engumba oyo Yawe aponaki kati na mabota nyonso ya Isalaele mpo na kotia Kombo na Ye. Kombo ya mama na Roboami ezalaki « Naama. » Naama azalaki moto ya Amoni.


Nzokande, mpo na Davidi, Yawe Nzambe na ye, apesaki Abiyami mwinda kati na Yelusalemi, wana atiaki mwana na ye ya mobali mpo na kokitana na ye na bokonzi mpe kokomisa Yelusalemi makasi.


Yawe asilikelaki makasi bana ya Isalaele mpe abenganaki bango mosika na Ye. Kaka libota ya Yuda nde batikalaki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ