Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 11:29 - Mokanda na Bomoi

29 Mokolo moko, wana Jeroboami azalaki kobima na Yelusalemi, Ayiya, mosakoli ya Silo, akutanaki na ye na nzela mpe alataki kazaka ya sika. Bazalaki kaka bango mibale na libanda ya mboka, kati na esobe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 11:29
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kayina alobaki na Abele, ndeko na ye. Wana bazalaki kati na bilanga, Kayina akangaki Abele, ndeko na ye, mpe abomaki ye.


Ngai, mwasi mosali na yo, nazalaki na bana mibali mibale. Bango mibale baswanaki kati na bilanga, mpe moto moko te azalaki kuna mpo na kokabola bango. Moko abetaki mosusu mpe abomaki ye.


Boye, Yawe alobaki na Salomo : « Lokola oponi kotambola bongo mpe obateli te boyokani na Ngai mpe mitindo oyo napesaki yo, nakobotola yo bokonzi mpe nakopesa yango na moko kati na basali na yo.


Mokonzi aboyaki koyoka bato, pamba te ezalaki Yawe nde asalaki bongo mpo na kokokisa liloba oyo Yawe ayebisaki Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, na nzela ya mosakoli Ayiya, moto ya Silo.


Kasi sima na Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, koyoka sango yango wuta na Ejipito epai wapi akendeki kobombama mpo na kokima mokonzi Salomo, azongaki wuta na Ejipito.


Jeroboami alobaki na mwasi na ye : — Mibongola mpo ete bato bayeba te ete ozali mwasi ya mokonzi Jeroboami ; bongo, kende na Silo. Mosakoli Ayiya azali kuna ; ye nde alobaki na ngai ete nakozala mokonzi ya bato oyo.


Mwasi ya Jeroboami asalaki makambo oyo mobali na ye atindaki ye : akendeki na Silo mpe akotaki na ndako ya Ayiya. Nzokande, Ayiya azalaki komona lisusu te, pamba te miso na ye ekufaki mpo ete akomaki mobange.


Mokonzi aboyaki koyoka bato, pamba te ezalaki Nzambe nde asalaki bongo mpo na kokokisa Liloba oyo Yawe ayebisaki Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, na nzela ya mosakoli Ayiya, moto ya Silo.


Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Salomo, kobanda na ebandeli kino na suka, ekomama kati na buku ya misala ya mosakoli Natan, ya mosakoli Ayiya, moto ya Silo ; mpe kati na buku ya bimoniseli ya Yedo, momoni makambo, na tina na Jeroboami, mwana mobali ya Nebati.


Sima na bana ya Isalaele kozwa bokonzi likolo ya mokili, lisanga na bango mobimba esanganaki na Silo mpe batelemisaki kuna Ndako ya kapo ya Bokutani.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ