25 Rezoni azalaki monguna ya Isalaele na tango nyonso oyo Salomo azalaki na bokonzi. Wana Adadi azalaki kotia Isalaele mobulu, Rezoni akomaki mokonzi ya Siri mpe akomaki kokanela Isalaele.
Boye, Jakobi alobaki na Simeoni mpe na Levi : — Bopesi ngai pasi mpe bobimisi ngai moto mabe na miso ya bato ya Kanana mpe ya Perizi oyo bazali kovanda na mboka oyo. Biso tozali kaka moke ; mpe soki basangisi makasi na bango mpo na kobundisa ngai, bakoboma ngai elongo na ndako na ngai mobimba.
Ayitofeli azongiselaki Abisalomi : — Kende kosangisa nzoto na bamakangu ya tata na yo, oyo batikalaki mpo na kobatela ndako, bongo Isalaele mobimba ekoyoka ete omikomisi nkele na miso ya tata na yo. Na bongo, maboko ya bato oyo bazali sima na yo ekolendisama.
Rezoni asangisaki mibali pene na ye mpe akomaki mokambi ya lisanga ya batomboki tango Davidi abomaki mampinga ya Tsoba. Bongo batomboki bakendeki na Damasi epai wapi bavandaki mpe bakomaki kokonza.
Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, moto ya Efrayimi ya Tsereda, moko kati na basali ya Salomo, atombokelaki mokonzi. Mama na ye azalaki mwasi akufisa mobali, mpe kombo na ye : Tseruya.
Azalaki kokonza bikolo nyonso na ngambo ya weste ya Efrate, kobanda na Tifisa kino na Gaza, elongo na bakonzi nyonso ya ngambo yango ; mpe azalaki na kimia elongo na bikolo nyonso ya zingazinga.
Azaria ayaki liboso ya Asa mpe alobaki na ye : « Asa elongo na bato nyonso ya Yuda mpe ya Benjame, boyoka ngai ! Yawe azalaka elongo na bino soki bino bozali elongo na Ye. Soki boluki Ye, akomimonisa epai na bino. Nzokande, soki botiki Ye, Ye mpe akotika bino !