21 Wana Adadi azalaki na Ejipito, ayokaki ete Davidi mpe Joabi, mokonzi ya mampinga, bakufi. Boye, Adadi alobaki na Faraon : — Pesa ngai nzela ete nazonga na mokili na ngai.
Abineri alobaki na Davidi : — Na ndingisa na yo mokonzi, nkolo na ngai, nalingi kokende sik’oyo kosangisela yo bato nyonso ya Isalaele mpo ete basala boyokani elongo na yo ; mpe na bongo, yo okokonza na bisika nyonso oyo olingi. Davidi atikaki Abineri kokende, mpe Abineri azongaki na kimia.
Ndeko mwasi ya Takipenesi abotelaki Adadi mwana moko ya mobali mpe apesaki ye kombo « Genubati. » Takipenesi abokolaki ye kati na ndako ya Faraon. Genubati avandaki kuna elongo na bana ya Faraon.
Yawe alobaki na Moyize tango azalaki nanu na mokili ya Madiani : — Telema mpe zonga na Ejipito, pamba te bato nyonso oyo balingaki koboma yo basili kokufa.
mpe alobaki na ye : « Telema, kamata Mwana elongo na mama na Ye, mpe zonga kati na mokili ya Isalaele, pamba te bato oyo bazalaki koluka koboma Mwana basili kokufa. »
Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, balamukaki. Samuele abengaki Saulo na veranda mpe alobaki na ye : « Bongama, nazali kokende kotika yo na nzela na yo. » Sima na Saulo kobongama, abimaki libanda nzela moko na Samuele.