Jozefi azwaki ngolu na miso ya nkolo na ye, oyo apesaki ye mokumba ya kobatela bozwi na ye nyonso : Potifari akomisaki Jozefi mokonzi kati na ndako na ye mpe apesaki ye mokumba ya kobatela biloko na ye nyonso.
Faraon apesaki Jozefi kombo « Tsafinati-Paenea, » mpe apesaki ye Asinati, mwana mwasi ya Poti-Fera, nganga-nzambe ya Oni, mpo ete azala mwasi na ye. Jozefi atambolaki na mokili ya Ejipito.
Balongwaki na Madiani mpe bakendeki na Parani. Wuta na Parani, bazwaki bato mpe bakendeki elongo na bango na Ejipito epai ya Faraon, mokonzi ya Ejipito. Faraon apesaki Adadi ndako, eteni ya mabele mpe bilei.
Ndeko mwasi ya Takipenesi abotelaki Adadi mwana moko ya mobali mpe apesaki ye kombo « Genubati. » Takipenesi abokolaki ye kati na ndako ya Faraon. Genubati avandaki kuna elongo na bana ya Faraon.
mpe akangolaki ye na minyoko na ye nyonso ; Apesaki ye bwanya mpe asalelaki ye ngolu na miso ya Faraon, mokonzi ya Ejipito, oyo akomisaki ye moyangeli ya Ejipito mpe ya ndako na ye mobimba.