Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 11:15 - Mokanda na Bomoi

15 Na kala, na tango oyo Davidi abundisaki mokili ya Edomi, Joabi mokonzi ya mampinga, oyo akendeki mpo na kokunda bibembe, abomaki mibali nyonso ya Edomi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 11:15
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe alobaki na ye : « Bikolo mibale ezali kati na libumu na yo, mpe mabota mibale ekabwana ekobima na libumu na yo ; ekolo moko ekoleka ekolo mosusu na makasi, mpe kulutu akosalela leki. »


Okobika na nzela ya mopanga na yo mpe okosalela ndeko na yo ya mobali. Kasi tango okotambola bipai na bipai, okobuka ekangiseli oyo akotia yo na kingo.


Davidi akomaki moto ya lokumu tango awutaki koboma bato ya Siri nkoto zomi na mwambe, kati na Lubwaku ya Mungwa.


Atiaki bayangeli kati na Edomi ; ezali kati na Edomi mobimba nde atiaki bayangeli, mpe bato nyonso ya Edomi bakomaki bawumbu ya Davidi. Yawe apesaki Davidi elonga na bisika nyonso oyo azalaki kokende.


Yawe abimisaki monguna moko mpo na kobundisa Salomo : Adadi, moto ya Edomi, mwana kati na libota ya bokonzi ya Edomi.


Joabi mpe bato nyonso ya Isalaele batikalaki kuna basanza motoba kino tango basilisaki koboma mibali nyonso ya Edomi.


Moabi ezali sani monene oyo nasukolelaka, Edomi ezali esika oyo nabwakaka sandale na ngai. Nazali kobeta milolo ya bitumba mpo na kobundisa mokili ya Filisitia. »


Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki ndenge moko na « Lisi ya litatoli. » Nzembo ya Davidi mpo na koteya bato.


Sik’oyo, boboma mibali nyonso mpe basi nyonso oyo bayebi nzoto ya mibali ;


Babundisaki Madiani ndenge Yawe atindaki na nzela ya Moyize mpe babomaki mibali nyonso.


Tango Yawe, Nzambe na yo, akokaba engumba wana na maboko na yo, okoboma na mopanga bato nyonso oyo bazali kati na yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ