Boye, Yawe alobaki na Salomo : « Lokola oponi kotambola bongo mpe obateli te boyokani na Ngai mpe mitindo oyo napesaki yo, nakobotola yo bokonzi mpe nakopesa yango na moko kati na basali na yo.
mpe alobaki na Jeroboami : « Kamata biteni zomi mpo na yo, pamba te tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : ‹ Nakobotola bokonzi na maboko ya Salomo mpe nakopesa yo bikolo zomi.
Kasi nakobotola te bokonzi nyonso na maboko ya Salomo, nakotika ye nanu kokonza na mikolo nyonso oyo akozala na bomoi, mpo na Davidi, mowumbu na Ngai, oyo naponaki mpe abatelaki mitindo mpe malako na Ngai.
« Omoni ndenge nini Akabi amikitisi liboso na Ngai ? Lokola amikitisi liboso na ngai, nakoyeisa pasi te wana ye akozala nanu na bomoi ; kasi nakotinda pasi yango na tango mwana na ye ya mobali akozala na bokonzi. »
« Solo, na mikolo ekoya, nyonso oyo ezali kati na ndako na yo, mpe nyonso oyo batata na yo babomba kino na mokolo ya lelo, bakomema yango na Babiloni, eloko moko te ekotikala, elobi Yawe.
Okogumbamelaka yango te mpe okosalelaka yango te, pamba te Ngai Yawe, Nzambe na yo, nazali Nzambe ya zuwa ; napesaka bana etumbu mpo na masumu ya batata kino na molongo ya misato mpe ya minei ya bato oyo bayinaka Ngai.