11 Boye, Yawe alobaki na Salomo : « Lokola oponi kotambola bongo mpe obateli te boyokani na Ngai mpe mitindo oyo napesaki yo, nakobotola yo bokonzi mpe nakopesa yango na moko kati na basali na yo.
Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, moto ya Efrayimi ya Tsereda, moko kati na basali ya Salomo, atombokelaki mokonzi. Mama na ye azalaki mwasi akufisa mobali, mpe kombo na ye : Tseruya.
Mokolo moko, wana Jeroboami azalaki kobima na Yelusalemi, Ayiya, mosakoli ya Silo, akutanaki na ye na nzela mpe alataki kazaka ya sika. Bazalaki kaka bango mibale na libanda ya mboka, kati na esobe.
mpe alobaki na Jeroboami : « Kamata biteni zomi mpo na yo, pamba te tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : ‹ Nakobotola bokonzi na maboko ya Salomo mpe nakopesa yo bikolo zomi.
Tango bana nyonso ya Isalaele bayokaki ete Jeroboami azongi, batindaki bato kobenga ye ete aya na mayangani, mpe bakomisaki ye mokonzi ya Isalaele mobimba. Kaka libota ya Yuda nde etikalaki kotosa bokonzi ya ndako ya Davidi.
Tango Yawe alongolaki Isalaele na se ya bokonzi ya Davidi, bana ya Isalaele bakomisaki Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, mokonzi na bango. Jeroboami atindikaki Isalaele ete balanda Yawe te, mpe amemisaki bango lisumu ya monene.
moko te kati na bango akomona lisusu mokili oyo nalakaki na nzela na ndayi epai ya bakoko na bango, moko te kati na ba-oyo batiolaki Ngai akomona lisusu mokili yango.
Ngai Yawe nde nalobi ; mpe nakosala solo makambo oyo epai ya lisanga oyo mobimba ya batomboki oyo basanganaki mpo na kotelemela Ngai. Bakomona suka na bango kati na esobe oyo ; ezali awa nde bakokufa. »