Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 11:1 - Mokanda na Bomoi

1 Mokonzi Salomo abalaki mwana mwasi ya Faraon ; kasi pembeni na ye, abalaki basi mosusu ebele ya bikolo ya bapaya : basi ya Moabi, ya Amoni, ya Edomi, ya Sidoni mpe ya Iti.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 11:1
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Asalaki mpe bongo mpo na banzambe ya basi na ye nyonso ya bikolo ya bapaya mpo ete batumbelaka yango malasi mpe babonzelaka yango mbeka.


Roboami, mwana mobali ya Salomo, akomaki mokonzi ya Yuda ; azalaki na mibu tuku minei na moko ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu zomi na sambo na Yelusalemi, engumba oyo Yawe aponaki kati na mabota nyonso ya Isalaele mpo na kotia Kombo na Ye. Kombo ya mama na Roboami ezalaki « Naama. » Naama azalaki moto ya Amoni.


Roboami akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Davidi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Naama. » Naama azalaki moto ya Amoni. Abiyami, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.


Lokola amonaki ete kolanda masumu ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, ekokaki te, abalaki Jezabeli, mwana mwasi ya Etibala, mokonzi ya Sidoni, mpe akomaki kosalela nzambe Bala mpe kogumbamela yango.


Salomo asalaki boyokani elongo na Faraon, mokonzi ya Ejipito ; abalaki mwana mwasi ya Faraon mpe amemaki ye na engumba ya Davidi, kino tango asilisaki kotonga ndako na ye ya bokonzi, Tempelo ya Yawe mpe bamir, zingazinga ya Yelusalemi.


Mibali oyo nyonso nde babalaki basi ya bapaya, mpe mingi kati na bango bazwaki bana na nzela ya basi yango.


Sima na makambo nyonso oyo esalemaki, bakambi ya Isalaele bayaki epai na ngai mpe balobaki : « Bato ya Isalaele, Banganga-Nzambe mpe Balevi bakabwani te na bato ya bikolo, oyo bazali kati na bango ; bakabwani mpe te na misala na bango ya mbindo. Batamboli kaka kolanda misala ya mbindo ya bato ya Kanana, ya Iti, ya Perizi, ya Yebusi, ya Amoni, ya Moabi, ya Ejipito mpe ya Amori,


pamba te babali bana basi ya bikolo wana ya bapaya mpo na bango moko mpe mpo na bana na bango ya mibali. Boye, basangisi libota ya bule na bikolo ya bapaya oyo bazali kati na bango. Bakambi mpe bakalaka bazalaki bato ya liboso ya kosala makambo wana ya mbindo. »


mpe soki bozwi na libala bana na bango ya basi mpo na bana na bino ya mibali, wana bana na bango ya basi bakokoba kosambela banzambe na bango ya bikeko, bakotindika bana na bino ya mibali na kosambela banzambe na bango.


Bwanya ekobikisa yo lisusu liboso ya mwasi mopaya, liboso ya mwasi oyo atonda na maloba ya sukali,


Monoko ya mwasi ya ndumba ezalaka lokola libulu ya mozindo ; moto oyo Yawe asilikeli akweyaka kuna.


Miso na yo ekomona biloko na ndenge ya kokamwa, mpe motema na yo ekobimisa makambo ya bozoba.


Kosilisa makasi na yo na basi te, komitika te na basi oyo bapengwisaka bakonzi !


mpo na kobatela yo mosika ya mwasi ya ndumba, mosika ya lokuta ya lolemo ya mwasi ya mopaya.


mpo ete ekoka kobatela yo liboso ya mwasi ya ndumba mpe ekoka kokebisa yo liboso ya mwasi oyo alobaka maloba ya elengi, nzokande ezali ya lokuta.


Okosangisa nzoto te na ndeko mwasi ya mwasi na yo, wana mwasi na yo azali nanu na bomoi, noki te ekoyeisa bombanda.


Asengeli te kozala na basi ebele noki te motema na ye ekopengwa. Asengeli te kozala na palata mpe wolo ebele koleka.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ