bilei oyo azalaki kolia na mesa na ye, ndako ya basali na ye, esaleli mpe elateli ya basali na ye, basali oyo bapesaka ye masanga mpe bambeka ya kotumba oyo azalaki kobonza kati na Tempelo ya Yawe, mwasi mokonzi ya Saba akamwaki makasi
Na mokolo ya kosambisama, mwasi mokonzi ya sude akotelema elongo na bato ya ekeke oyo mpe akokatela bango etumbu, pamba te awutaki mosika, na suka ya mokili, mpe ayaki mpo na koyoka maloba ya bwanya ya Salomo ; nzokande, ezali awa na Moto oyo aleki Salomo.
Botala ndenge bafololo ya lisi ekolaka ! Esalaka te, etongaka bilamba te ; nzokande, nazali koloba na bino, ezala ye moko mokonzi Salomo, kati na nkembo na ye nyonso, atikalaki kolata te lokola moko kati na yango.